01/04/2021
-----MESSAGE MATINAL DU 31.3.21-----
☆DIEU LE SAINT- ESPRIT☆
SIMON KIMBANGU KIANGANI
CHEF SPIRITUEL DE L'ÉGLISE DE JÉSUS-CHRIST SUR LA TERRE PAR SON
ENVOYÉ SPÉCIAL SIMON KIMBANGU
-----------E.J.C.S.K.----------
NA KOMBO YA TATA , MUANA PE TATA MOLIMO SANTU,TOLANDI MATEYI NA BISO. BATEYI BISO NA MAMA. MAKAMBO YA MIBEKO TOYEBI NDENGE BATINDAKA BISO. PE TOSIMBA MIBEKO MAKASI PO MAKAMBO NA BISO EKENDE LIBOSO, TOLONGA ETUMBA. OYO ATEYI BISO JOB. EZA YA SOLO. SATANA MOTO AKENDAKI KOSENGA YANGO NA TATA NZAMBE. PO SATANA TANGO ATAMBOLAKI NA MOKILI AYE KOMONA ETE KOMDIMA YA JOB EZALAKI MAKASI. AMEKAKI YE, AKOKAKI YE TE. YE ASENGAKI LISUSU NZELA. AKE KOSENGA PERMISSION NA YE MOKO TATA NZAMBE. MAMA NDENGE ALOBI. NZAMBE ALOBI KENDE ! NZOTO OUI MAIS MOLIMO EBEBA TE. SIMBA KAKA NZOTO. YANGO AMONAKI PASI MINGI. BANA BAKUFI, BILOKO NYONSO EBEBI. RICHESSE NYONSO BAZALAKI NANGO ESILI. MAIS LIKAMBO MONENE YA ALOBAKI PO BATO BAZALAKI KOTUNGISA BANGO MINGI. SALA BOYE, SALA BOYE. MÊME MUASI NA YE ATUNGISAKI YE. BAKOTA NZELA MABE KOLUKA NDENGE NINI LIKAMBO OYO EZALI KOSALAMA. MAIS RÉPONSE YA TATA APESAKI: NAYAKI MABOKO PAMBA, NAKOSONGA PE MABOKO PAMBA. ELAKISI KE AYAKI, ABOTAMAKI NA ELOKO TE. TANGO PE AKOKUFA AKOMEMA PE ELOKO TE. LIKAMBO YA MONENE YE ALOBAKI NDE YANGO WANA.
TALA NANU YO MOKO, OKOKI KOZALA NA BILOKO YA NGENGE NA NDENGE MAIS SOKI OKUFI ETIKALI NANGO. EZALA BONGO, EZALA BA NDAKO, EZALA NINI, MITUKA TO NINI, EKOKENDE NA YO NA ELOKO TE. MAIS KONDIMA NAYO EKOBIKISA YO.
LEL'OYO TOZA KOBELELA TOKENDE NKAMBA, TOTONGA MUSÉE, TOTONGA ELOKO BOYE. YEBAKA KE KUNA PE TANGO OKOKUFA MISALA NA YO OYO OSALAKI, KUNA PE NZAMBE AZO BONGISELA YO LIKAMBO MONENE, SURPRISE.
YANGO LISESE TOLOBAKA TANGO NYONSO, TATA ABOTI BANA MIBALE MIBALI NA MIBALI. NA AFRIQUE PASI PONA KOZUA YA KOLIA KO VIVRE TO NINI.PASI. BAZUI LIKANISI IL FAUT BAKENDE NA POTO. TII BA SIGNÉ BANGO NYONSO MIBALE, TATA APESI NZELA, MAMA APESI NZELA BAKE NA POTO. KUNA BAKENDAKI BAZUAKI PE MOSALA. MAIS CONDITION EZALI. AWA BOYE KOLUKA MISALA EPAYI NA BISO. BOYE MABOKO PAMBA. PE MOKOLO BOKOZONGA BOKO SONGA PE MABOKO PAMBA. BA SIGNÉ.
KOFUTA YA BIEN EZALAKI. BILO K O NYONSO BAZALAKI NANGO. EZALA MITUKA, PLACE YAKOFANDA, MAKAMBO NYONSO.
YAYA AZAKAKI KOKIPÉ ELOKO MOKO TE. MAIS LEKI SOKI AZUI SALAIRE. AZAKOTINDELA MBOKO NA TATA NA YE. TAYA PE YA MAYENE ALOBI LOKOLO, MUANA AZO TINDA MBONGO NA YE, NATONGELA YE NDAKO. ATONGI NDAKO. YAYA AZA KOKIPEMÉ ELOKO TE, MBONGO NA YE KAKA KOLIA, KOSOMBA BILOKO NA YE NDRNGE ALINGI.
KUNA PE BALOBI ESILI, MISALA EZA LUSISI TE IL FAUT BOZONGA. BANGO NYONSO BABONGISI BILONO NA BANGO BAKENDE NA BANGO. LOKOLA BA SIGNAKI MOKANDA BAKOZONGA MABOKO PAMBA. BATUNI BISO TOKOMI KOKENDE, TALA BILOKO TOZA NANGO. BALOBI, TE! AH, TOSI TOYEBISA BINO BOTAKI MABOKO PAMBA, BOKO SONGA MABOKO PAMBA. AH, BA REGRETTÉ MAIS LEKI AKIPÉ TE. YAYA ALOBI, NGAYI NAZA NA ELOKO TE, NAKOMEMA NINI? TROP T**D.
BAZONGI EPAYI NA BANGO ELOKO TE, MABOKO PAMBA. BA MONI PAPA, BAMONI MAMA. BAKOTI NA NDAKO, BA VANDI, BABANDI KOSOLOLA.TATA AYOKI MASOLO NA BANGO FAVANDI NA BANGO TRANQUILLE. SIMA TATA ALOBI, HEIN BOYE NA ELOKO TE ? ( HEIN ?), BAPESAKI BINO MIBEKO? ( HEIN!). KASI YO LEKI LOKOLA OZALAKI KOTINDA BONGO, TALA MBONGO OZALAKI KOTINDA NDAKO NA YO YANG'OYO.
AH LEKI ASEPELI ! YAYA AH, ELOKO TE! NINI ELANDAKI? LEKI ASEPELI, YAYA ELOKO TE. PLACE PE PASI EZONGI NDENGE EZALAKI LIBOSO. ELINGI KOLOBA ETE TANGO OZALI NA MOKILI SALELA NZAMBE! TANGO OSALELI NZAMBE NA YO OKOKENDE KOKUTA NDAKO. MOKOLO YO OKOKUFA KOKENDE KOKUTA NDAKO EZALI ! MAIS SOKI OSALELI NA YO NZAMBE TE KUNA PE OKOKENDE PLACE EZA TE. OKOSALA NDENGE NINI? WANA LISESE.
ELASI KE JOB ALOBAKI YANGO: NAYAKI MABOKO PAMBA PE NAKOZONGA MABOKO PAMBA.ESIKA YE ALONGAKI. SATAN TANGO AZONGI NA LIKOLO EPAYI YA NZAMBE , SATAN ALOBI: AH YA SOLO ! NASALI MANSO. YO OLOBAKI NA NGAYI NASIMBA NZOTO KASI MOLIMO TE. NYONSO EBEBI YA YE, ZONGISELA YE MIBALE. NZOTO NA YE PE EBONGA. SATAN ALANDELAKA BISO, ZALA NA MAYELE. TANGO OZA NA MOKILI KOBOSANA NZAMBE TE. KOBOSANA MISALA BAZO TINDA TE. YANGO NDE EKOLONGISA BISO.
TOSILISI NA KOMBO YA TATA, MUANA PE TATA MOLIMO SANTU, AMEN.
# KIMBANGUISMEMENT,
IRÈNE FOLONI