Siga o meu perfil no TIKTOK para continuares a assistir👉tiktok.com/@moo.intrprete
APPRENEZ À INDENTIFIER "NON"🇨🇵
YEKOLA KOYEBA "TE"🇨🇩
SAIBA IDENTIFICAR O "NÃO"🇦🇴
CRIAR OS FILHOS👭👬SEGUNDO PAIS AFRICANOS
SE TENS UM GRANDE CORAÇÃO ❤️, PORÉM UM PÉSSIMO CÉREBRO 🧠, SOFRERÁS MUITO NA VIDA. COM BBénit MansietoCLIKA NO LINK E ME SIGA PARA MAIS VIDEOS👉https://tiktok.com/@moo.intrprete
CUIDADO COM A PESSOA QUE CONVERSOU COM A CERPENTE 🐍 QUANDO ESTAVAS AUSENTE, E QUE CONVERSOU COM DEUS QUANDO ESTAVAS DORMINDO.
"NÃO SE BRINCA COM UMA MULHER".
INTERPRETANDO A PREGAÇÃO PREGADOR Bénit Mansieto com tema: CUIDADO COM OS DOMÍNIOS QUE SEUS PAIS FRACASSAARAM.
TRADUZINDO E INTERPRETANDO A PREGAÇÃO DO PREGADOR Bénit Mansieto CUJO O TEMA É Fonte de Bençãos.
Soki omoni libélí ébunda mpo na kobima na casulo na yango, okoki kobongisa yango te mpo na kobima. Pamba te yango ezalaki kaka nseke, mpe mpo ezala libélí, esengeli na yango kokatisa na processus ya transformation na casulo na yango. Sik’oyo, mpo na koyekola kokima, tango yango ébunda mpo na kobima na casulo na yango, ezali tango yango oyo ezali komipesa makasi mpo na sima na yango ebanda kokima. Kasi soki otia yango, yango ekokoka kokima te, mpo okataki processus ya transformation na yango.Na bomoi, tozali mpe kokoma na tango oyo ata Nzambe te alingi moto moko asunga yo. Mbala mosusu okokoma koyina bato koloba “Moto moko te alingi kosunga ngai” kasi na Biblia ezali koloba ete kaka Nzambe nde akoki kokanga motema ya bakonzi. Tango ekoki mpe okomona ete moto moko te azali kosunga yo, elingi koloba ete kaka ye nde akokoka kosunga yo. Elingi koloba ete Nzambe alingi okatisa na etape ya transformation, oyingisa nini okoki kokoma kosala, oyekola kokima yo moko, mpo mpe okoma kosunga bato mosusu, ete bato banso basalisa yo te. Nzokande Nzambe alingi ete okoma source ya lipamboli mpo na bato mosusu. Nzambe akolinga te ete bato mosusu basunga yo.Yango wana okoki koyina bato te koloba ete bato basalisi yo te. Te, bolingo! Osengeli kokota na boyebi mpo oyeba ete na etape oyo nakomi, Nzambe alingi ete nakoma source ya lipamboli. Osali mai ebele, ozeli bato ebele, osengi lisungi ebele. Sik’oyo tango ekomi ya kosenga Nzambe, tango ekomi ya kosalela mayele oyo Nzambe apesaki yo. Mayele oyo nalobi ezali te oyo osalela mpo na kozua esika ya liboso na kelasi, ezali mpo na kokanisa mpe koyeba nini osala. Na tango oyo okokanisa, ekokoma tango oyo Nzambe akopesa yo elimo moko, mpe okosalisa yango na misala, mpe sima akotia nguya na yango. Kuna okomona mbuma oyo ekosala bato bakamwa.Tango ekomi. Kanisa nini Nzambe atiaki kati na yo, salela yango, zala na elikya na Nzambe